27 Tango mokonzi asilisaki kotumba mokanda oyo ezalaki na maloba oyo Baruki akomaki na etinda ya Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi :
Baruki azongisaki : — Solo, ezali ye moto ayebisaki ngai makambo oyo nyonso, mpe ngai nasalelaki kaka ekomeli mpo na kotia yango na mokanda.
Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto.
Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda.