Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 36:26 - Mokanda na Bomoi

26 Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 36:26
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Longwa awa, kende na ngambo ya este mpe bombama na lubwaku ya Keriti, na ngambo ya este ya Yordani.


« Kende na lombangu na Sarepita, kati na mokili ya Sidoni, mpe vanda kuna. Napesi mitindo kuna epai ya mwasi moko oyo akufisa mobali ete apesa yo bilei. »


Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.


Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele, babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo : — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi.


Kasi Yeosheba, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe ndeko ya Akazia, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia ; alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto, mpo na kobomba ye mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te.


Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »


« Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai ! »


Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.


Pamba te, na tango ya pasi, akobatela ngai kati na evandelo na Ye, akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.


Ozali ebombamelo na ngai ; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.


Oh Nzambe, yoka mongongo na ngai kati kolela na ngai, batela ngai mosika ya monguna oyo azali kopesa ngai somo.


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Bato na ngai, bokende, bokota na bashambre na bino mpe bokanga bikuke sima na bino ; bomibomba nanu mwa tango moke kino tango kanda ekoleka.


Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.


« Napesaki bato na yo etumbu ya pamba ; pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. Mopanga na yo ebomi basakoli na yo ndenge nkosi ebomaka bato.


Nzokande Ayikami, mwana mobali ya Shafani, abatelaki Jeremi ; boye akabamaki te na maboko ya bato mpo ete baboma ye.


Bakambi bayebisaki Baruki : — Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala.


Jeremi alobaki na Baruki : « Ngai nakangami, nakolonga kokende na Tempelo ya Yawe te.


Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.


Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.


Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.


Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo ; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.


Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.


Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki : — Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo ! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ