Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 36:23 - Mokanda na Bomoi

23 Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 36:23
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »


Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !


Nzokande oyinaka malako na ngai mpe oyokaka te maloba na ngai ?


lokola baboyaki kondima toli na Ngai mpe batiolaki pamela na Ngai,


Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi, kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti.


Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.


mpe oloba : « Mpo na nini nayinaki mateya, mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli ?


« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.


Tango mokonzi asilisaki kotumba mokanda oyo ezalaki na maloba oyo Baruki akomaki na etinda ya Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi :


— Kamata mokanda mosusu mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo ezalaki na mokanda ya liboso oyo mokonzi Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki.


mpe soki moto alongoli ata likambo moko na maloba ya masakoli ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ye ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya kokota kati na Engumba ya Bule, oyo etalisami kati na buku oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ