« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.
Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.
Tango Baruki asilisaki kokoma kati na mokanda makambo oyo Jeremi atindaki ye, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, mosakoli Jeremi alobaki na Baruki, mwana mobali ya Neriya, maloba oyo :