Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.
‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda bilakeli mabe nyonso oyo ekomama kati na buku oyo bawuti kotanga liboso ya mokonzi ya Yuda. ›
Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu.