Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye :
Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, lokola moyangeli ya bato oyo atikaki kati na mokili ya Yuda.
apesaki mitindo oyo epai ya Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani ; epai ya Abidoni, mwana mobali ya Mishe ; epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi :
Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.