Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 36:10 - Mokanda na Bomoi

10 Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 36:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sheva azalaki mokomi mikanda ; Tsadoki mpe Abiatari bazalaki Banganga-Nzambe ;


Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ;


Salomo azingelaki lopango ya kati na mir oyo batonga na milongo misato ya mabanga bakata mpe bamatisa moko likolo ya mosusu, mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.


Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Ezali Yotami nde atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe.


Boye Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.


Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye :


Tango bakalaka ya Yuda bayokaki makambo oyo nyonso, balongwaki na ndako ya mokonzi, bakendeki na Tempelo ya Yawe mpe bavandaki liboso ya Ekuke ya Sika ya Tempelo ya Yawe.


Nzokande Ayikami, mwana mobali ya Shafani, abatelaki Jeremi ; boye akabamaki te na maboko ya bato mpo ete baboma ye.


Apesaki mokanda yango na maboko ya Eleasa, mwana mobali ya Shafani ; mpe na maboko ya Gemaria, mwana mobali ya Ilikia. Ezali bango nde Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki na Babiloni epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. Mokanda yango elobaki boye :


Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke.


Tango Mishe, mwana, mobali ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani, ayokaki maloba nyonso ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda,


Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te.


Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.


Baruki, mwana mobali ya Neriya, asalaki makambo nyonso oyo mosakoli Jeremi atindaki ye kosala ; atangaki na Tempelo ya Yawe maloba ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda.


Ezali Baruki, mwana mobali ya Neriya, moto atindi yo ete okosa biso, pamba te alingi ete towumela na se ya bokonzi ya bato ya Babiloni mpo ete baboma biso to bamema biso na bowumbu na Babiloni.


Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba ; bapesi toli sambo ya mokonzi, oyo batikalaki kati na engumba ; mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga ; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba.


Bandako nyonso ya mike ya kokotela ezalaki na shambre moko epai wapi bazalaki kosukola mbeka ya kotumba ; shambre yango ezalaki etalana na makonzi ya ekuke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ