Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 36:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 36:1
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi na tina na bato nyonso ya Yuda, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi, mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mobu moko na bokonzi.


« Wuta tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi kino na mokolo ya lelo, ekokisi mibu tuku mibale na misato oyo nayebisaka bino tango na tango liloba oyo Yawe azalaki koloba na ngai, kasi boyokaki ngai te.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, azalaki mokonzi :


Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda.


Tango Baruki asilisaki kokoma kati na mokanda makambo oyo Jeremi atindaki ye, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, mosakoli Jeremi alobaki na Baruki, mwana mobali ya Neriya, maloba oyo :


Na tina ya Ejipito : Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi :


Na mobu ya misato ya bokonzi ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ