8 Totosaka makambo nyonso oyo koko na biso Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, ayebisa biso : Ezala biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, tomelaka masanga ya vino te,
Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo.
Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.