Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 35:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi bazongisaki : — Tomelaka masanga ya vino te, mpo ete koko na biso, Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki biso mobeko oyo : « Bokoki komela masanga ya vino te, ezala bino to bakitani na bino,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 35:6
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali yango bakolaki. Ezawu akomaki mobomi makasi ya banyama mpe azalaki kolekisa tango mingi na zamba ; Jakobi azalaki moto ya kimia, azalaki kosepela kovanda na ndako.


Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango.


Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki : — Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo ? Yonadabi azongisaki : — Iyo, ezali bongo ! Jewu alobaki : — Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo. Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar.


Bongo Jewu elongo na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, bakotaki na ndako ya nzambe Bala. Jewu alobaki na basambeli ya Bala : « Botala malamu-malamu na zingazinga na bino mpo ete basali ya Yawe bazala elongo na bino te, kaka basali ya Bala. »


Bozalaki kaka motango moke ya bato mpe bapaya kati na yango ;


elongo na mabota ya bato ya mayele oyo bazalaki kovanda na Yaebetsi : bato ya Tirea, ya Shimea mpe ya Sukoti. Bango wana nde bato ya Keni oyo babimeli na Amati, tata ya libota ya Rekabi.


Na tango wana, bazalaki kaka motango moke ya bato mpe bapaya kati na yango ;


Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


tovandaka kaka na bandako ya kapo mpe totosaka makambo nyonso oyo koko na biso, Yonadabi, ayebisa biso.


« Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki mobeko epai ya bana na ye ete bamela masanga ya vino te, mpe babatelaka mobeko yango. Kino na mokolo ya lelo, bamelaka masanga ya vino te mpo na kotosa mobeko oyo koko na bango apesaki bango. Nzokande, tango na tango, Ngai nazalaki koloba na bino, kasi bozalaki koyoka Ngai te.


« Tango bokobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, yo mpe bana na yo ya mibali, bosengeli te komela masanga oyo elangwisaka, noki te bokokufa. Yango ezali mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe milongo nyonso oyo ekoya sima na bino,


pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.


Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.


Akolia eloko moko te oyo ewuti na nzete ya vino, akomela vino te to masanga mosusu ya makasi, akolia eloko moko te ya mbindo ; asengeli kosala makambo nyonso oyo natindi ye.


Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ