5 Natiaki biloko etonda na vino mpe ndambo ya bakopo liboso ya bato ya libota ya Rekabi ; mpe nalobaki na bango : — Bomela masanga ya vino.
Kende, lia bilei na yo na esengo mpe mela masanga na yo ya vino na motema ya esengo ; pamba te Nzambe asili kondima misala na yo.
« Kende epai ya bato ya libota ya Rekabi mpe bengisa bango ete baya kokota kati na moko ya bashambre ya Tempelo ya Yawe. Mpe pesa bango masanga ya vino ya komela kuna. »
« Kasi bino, bolangwisi banaziri masanga mpe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.
Mpe soki bawuti na esika oyo bato ebele bakutanaka, baliaka te soki bamipetoli nanu te na mayi. Bazalaki lisusu na mibeko ebele ya bokoko oyo bazalaki kotosa, ndakisa : kosukola bakopo, bambeki, bambeto mpe basani ya bibende.
Pamba te nakomelaki bino lisusu mpo na komeka bino mpe mpo na kotala soki botosaka na makambo nyonso.