Jeremi 35:4 - Mokanda na Bomoi4 Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.
Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo ; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai.