elongo na mabota ya bato ya mayele oyo bazalaki kovanda na Yaebetsi : bato ya Tirea, ya Shimea mpe ya Sukoti. Bango wana nde bato ya Keni oyo babimeli na Amati, tata ya libota ya Rekabi.
Yawe alobaki na ngai : « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai ! Tika ete bakende mosika na Ngai !
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki ozongi epai na Ngai, nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai ; soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, kasi maloba ya pamba-pamba te, okozala molobeli na Ngai. Tika ete bato oyo balanda yo ; kasi yo, kolanda bango te.
Ngai, nakotikala na Mitsipa mpo na kolobela bino liboso ya bato ya Babiloni, oyo bazali koya epai na biso. Kasi bino, bobuka bambuma ya vino, bambuma mosusu, bokamola mafuta mpe bobomba yango na bibombelo na bino, bongo bovanda kati na bingumba oyo bosili kozwa. »
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene ;