Jeremi 35:16 - Mokanda na Bomoi16 Bakitani ya Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, babatelaki mobeko oyo koko na bango apesa bango, kasi bato oyo baboyi kotosa Ngai. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki mobeko epai ya bana na ye ete bamela masanga ya vino te, mpe babatelaka mobeko yango. Kino na mokolo ya lelo, bamelaka masanga ya vino te mpo na kotosa mobeko oyo koko na bango apesaki bango. Nzokande, tango na tango, Ngai nazalaki koloba na bino, kasi bozalaki koyoka Ngai te.
Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? ›