Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 35:13 - Mokanda na Bomoi

13 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kende koyebisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokoki solo kozwa liteya te mpe kotosa maloba na Ngai te, » elobi Yawe ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 35:13
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.


Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto,


Nani kati na bino akoyoka makambo yango ? Nani akozala na bokebi na makambo oyo ekoya ?


Mosakoli Jeremi alobaki na bato nyonso ya Yuda mpe na bavandi nyonso ya Yelusalemi :


Bapesaki Ngai mokongo na esika ya kotala Ngai. Atako nazalaki tango na tango koteya bango, kasi batikalaki koyoka Ngai te mpe baboyaki kozwa mayele.


Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :


Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.


Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.


Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ