Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 34:8 - Mokanda na Bomoi

8 Sima na mokonzi Sedesiasi kosala boyokani elongo na bato nyonso kati na Yelusalemi mpo ete kokangolama ya bawumbu nyonso esakolama, Yawe alobaki na Jeremi

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 34:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yeoyada asalaki boyokani kati na Yawe, mokonzi mpe bato, mpo ete bazala bato ya Yawe ; asalaki lisusu boyokani kati na mokonzi mpe bato.


Yeoyada asalaki boyokani kati na ye, bato nyonso mpe mokonzi, mpo ete bazala bato ya Yawe.


Sik’oyo, nazwi mokano ya kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpo ete abwaka kanda makasi na Ye mosika na biso.


Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.


Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ;


Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.


Soki moko kati na bandeko na yo, Mo-Ebre, azala mobali to mwasi, amiteki ye moko epai na yo, akosalela yo mibu motoba ; na mobu ya sambo, okotika ye kokende na bonsomi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ