Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 34:7 - Mokanda na Bomoi

7 wana basoda ya mokonzi ya Babiloni bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso mosusu ya Yuda, oyo mokonzi ya Babiloni alongaki nanu te : Lakishi mpe Azeka, pamba te yango kaka nde ezalaki bingumba batonga makasi oyo etikalaki kati na Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 34:7
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna.


Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.


Atongaki mpe bingumba kati na etuka ya bangomba ya Yuda, bandako makasi mpe bandako milayi kati na bazamba.


Boye, mokonzi ya Asiri atindaki mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, elongo na mampinga ya basoda ya nguya, wuta na Lakishi kino na Yelusalemi, epai ya mokonzi Ezekiasi. Tango mokonzi ya basoda yango atelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,


Bingumba ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi bakokende koganga epai ya banzambe ya bikeko oyo bazali kotumbela malasi ya ansa, kasi ekokoka kobikisa bango te tango pasi ya makasi ekokomela bango.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na basoda na ye nyonso, mikili ya bakonzi nyonso oyo azalaki kokamba, mpe bikolo nyonso bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso ya zingazinga na yango :


Bopanza sango na mokili ya Yuda, botatola na Yelusalemi mpe boloba : ‹ Bobeta kelelo na mokili ! › Boganga makasi mpe bobelela : ‹ Bosangana, bino nyonso ! Tokima na bingumba batonga makasi ! ›


Mpo na nini tozali kovanda awa ? Tosangana esika moko ! Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi mpo ete tokufela kuna ! Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, pamba te tosalaki masumu liboso na Ye.


Bino bavandi ya engumba Lakishi, bokangisa bampunda mpe bashar na bino ! Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu ; pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino !


Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.


Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.


Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.


mokonzi ya Yarimuti moko mokonzi ya Lakishi moko


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ