Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 34:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye ; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 34:3
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›


‹ Bakomema yango na Babiloni, mpe ekotikala kuna kino na mokolo oyo nakolandela yango, › elobi Yawe, ‹ nakolongola yango mpe nakozongisa yango na esika oyo, elobi Yawe. › »


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokaba engumba oyo na maboko ya bato ya Babiloni mpe ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo ete azwa yango.


Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, abwakaki ye kuna na koloba : « Mpo na nini ozali kosakola na maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobotola yango ;


Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akolonga te kokima liboso ya bato ya Babiloni, kasi nakokaba ye solo na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akolobana na ye mpe akotalana na ye na elongi ;


Nakokaba Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, elongo na bakalaka na ye na maboko ya banguna na bango, oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya mampinga ya mokonzi ya Babiloni, oyo akei sik’oyo mosika na bino.


Nzokande, Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, yoka Liloba na Yawe ! Tala elaka oyo Yawe apesi yo : Okokufa na mopanga te,


Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? Jeremi azongisaki : — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.


Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. »


Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni ; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto.


Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango ; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide ; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna.


Kasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni mpe atindaki bantoma na ye, na Ejipito mpo ete bapesa ye bampunda mpe basoda ebele. Akolonga solo ? Moto oyo azali kosala makambo ya boye akobika solo ? Boni, abuka solo boyokani mpe abika ?


Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, akokufa kati na Babiloni, kati mokili ya mokonzi oyo atiaki ye na bokonzi ; pamba te atosaki te ndayi oyo alapaki liboso na ye mpe abukaki boyokani oyo asalaki elongo na ye.


Sala nzela moko mpo ete mopanga ekoma kino na Raba, engumba ya bato ya Amoni, mpe nzela mosusu mpo ete mopanga ekoma kino na Yelusalemi, engumba batonga makasi, kati na Yuda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ