Jeremi 34:17 - Mokanda na Bomoi17 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo soki batuni yo : ‹ Tokende wapi ? › Zongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga bakufa na mopanga ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi bakufa na nzala makasi ! Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu bakende na bowumbu ! ›
Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi to mpe na bokono oyo ebomaka ; kasi ye oyo akobima mpo na kokende komikaba epai ya bato ya Babiloni akobika, akokufa te ; bomoi na ye ekozala bomengo na ye ya bitumba, mpe akotikala na bomoi. ›