Jeremi 34:16 - Mokanda na Bomoi16 Kasi tala sik’oyo makambo bosali : bozongi sima, botiki ekateli oyo bozwaki mpe botioli bosantu ya Kombo na Ngai ; pamba te bozongisi bawumbu na bino ya kala, mibali to basi, oyo bopesaki bonsomi mpo ete bakende na esika nyonso oyo balingi ; bokangi bango na makasi mpo ete bakoma lisusu bawumbu na bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki.
Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.