Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 34:15 - Mokanda na Bomoi

15 Nzokande bino, na mwa mikolo oyo kaka, bobongolaki bino moko mitema mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai : moko na moko kati na bino asakolaki kokangolama ya ndeko na ye, apesaki ndeko na ye bonsomi. Bosalaki kutu boyokani yango liboso na Ngai, kati na Ndako Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 34:15
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki tango Jewu akokisaki mibu sambo na bokonzi nde Joasi akomaki mokonzi. Joasi akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba.


Amatsia asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi ezalaki te lokola Davidi, koko na ye. Na makambo nyonso, alandaki ndakisa ya Joasi, tata na ye.


Mokonzi atelemaki na etemelo ya kolobela, asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe : « Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba ; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo. » Bato nyonso bandimaki kotosa boyokani yango.


Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele bayaki kosangana na bango : kati na Banganga-Nzambe, kati na Balevi, kati na bakengeli bikuke, kati na bayembi, kati na basali ya Tempelo mpe kati na bato nyonso oyo bakabwanaki na bikolo ya bapaya oyo ezalaki zingazinga na bango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe, elongo na basi na bango, bana na bango nyonso ya mibali mpe ya basi, bato nyonso oyo bazali na makoki ya kososola.


Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango : « Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »


Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.


Pamba te mokolo na mokolo, balukaka Ngai, basalaka lokola bato bazali na esengo ya koyeba nzela na Ngai, lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembo mpe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango ; basengaka Ngai mikano ya sembo, mpe basalaka lokola bato bazali na esengo ya kozala pene ya Nzambe ;


Batiaki kutu banzambe na bango ya bikeko kati na Ndako epai wapi babelaka Kombo na Ngai, mpe na bongo, bakomisaki yango mbindo.


Sima na mokonzi Sedesiasi kosala boyokani elongo na bato nyonso kati na Yelusalemi mpo ete kokangolama ya bawumbu nyonso esakolama, Yawe alobaki na Jeremi


Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.


« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ