Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 33:9 - Mokanda na Bomoi

9 Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 33:9
40 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Somo ya Nzambe ekangaki bikolo nyonso ya mokili tango bayokaki sango ete Yawe abundisi banguna ya Isalaele.


Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki.


Kati na bituka nyonso, bingumba nyonso mpe bisika nyonso oyo bazwaki sango ya mobeko ya mokonzi, ezalaki tango ya esengo, ya kosepela, ya kolia mpe ya feti kati na Bayuda. Bato ebele ya bikolo mosusu, oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bamikomisaki Bayuda ; pamba te somo ya Bayuda elongaki makanisi na bango.


Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.


Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto ; atelemisaki ngai na likolo ya libanga mpe alendisaki makolo na ngai.


bato oyo Ngai moko nabongisaki mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.


Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »


Boye, okomona mpe okongenga, motema na yo ekobeta mpe ekosepela ; bomengo ya ebale ekoya epai na yo, mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo.


Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.


Bakobenga bango Libota mosantu, basikolami na Yawe ; mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka, engumba oyo basundola te.


Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.


mpe botikela Ye te tango ya kopema kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !


Pamba te tango osalaki makambo ya somo oyo biso tozalaki kozela te, okitaki mpe bangomba eninganaki liboso na Yo.


Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. ›


Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.


Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosalela bango bolamu, mpe nakozongisa bango kati na mokili oyo. Nakobongisa bango lisusu, kasi nakobebisa bango lisusu te ; nakolona bango lokola nzete, nakopikola bango lisusu te.


nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › »


Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi.


Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango.


Namilobelaki : ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango ya kokamata bino lokola bana mpe kopesa bino mikili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! › Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › mpe bokotika te kolanda Ngai.


Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe na mafuta ya bibwele, mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » elobi Yawe.


Nakobongisa bino lisusu ; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : Ndenge natindelaki bato oyo pasi oyo nyonso, ndenge wana mpe nakotindela bango bomengo nyonso oyo nalakaki bango.


‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda.


soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo : ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »


Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili.


Ndenge nini bosundola engumba ya lokumu boye, engumba oyo ezalaki kosepelisa motema na Ngai ?


nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala ; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te ; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi.


Bongo, bakoloba : ‘ Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni ; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna. ’


Bato nyonso ya Isalaele bakokunda bato ya Gogi ; bongo ekozala likambo ya lokumu mpo na bango, mokolo oyo nakomonisa nkembo na Ngai, elobi Nkolo Yawe.


Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.


Tatola lisusu : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › »


« Nakokomisa Yelusalemi lokola kopo ya vino oyo elangwisaka bikolo nyonso ya zingazinga na yango ; bakozingela solo Yuda mpe Yelusalemi.


Yawe, Nzambe na bino, akomema bino na mokili ya bakoko na bino, mpe bokozwa yango ; akosalela bino bolamu mpe akokomisa bino ebele koleka bakoko na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ