Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, bozwi oyo batia na bisika ebombama, mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo abengi yo na kombo na yo.
Alobaki na bango ete basenga ngolu mpe mawa ya Nzambe ya Lola na tina na mabombami oyo, mpo ete baboma te ye Daniele, baninga na ye mpe bato mosusu ya bwanya ya Babiloni.
Oh Nzambe ya batata na ngai, nazali kosanzola mpe kokumisa Yo mpo na bwanya mpe nguya oyo opesi ngai, pamba te oyebisi ngai makambo oyo tosengaki Yo mpe otalisi biso ndoto ya mokonzi.
Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki : « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »
Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :
Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye ?
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »