Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 33:18 - Mokanda na Bomoi

18 Banganga-Nzambe oyo bazali bakitani ya Levi bakozalaka tango nyonso na bakitani oyo bakobanda kotelema tango nyonso liboso na Ngai mpo na kotumba mbeka, kobonza mbeka ya gato mpe kobonza makabo. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 33:18
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na yango, babonzaki mbeka ya kotumba ya tango nyonso, bambeka ya kotumba oyo ekatama mpo na feti ya ebandeli ya sanza mpe mpo na feti nyonso oyo ekatama mpo na Yawe, mpe bambeka ya kotumba mpo na bato nyonso oyo bazalaki bango moko kopesa makabo wuta na mokano ya mitema na bango.


nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule mpe nakopesa bango esengo kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai. Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango ekondimama na etumbelo na Ngai, pamba te Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »


Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe, bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso ; bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolo mpe bokozwa lokumu na bomengo na bango.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :


Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »


tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, akotikala kozanga te moto oyo akosalela Ngai. › »


Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai ; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.


Etuka moko ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse ekozala mpo na Balevi oyo basalaka kati na Tempelo ; lokola libula na bango, ekozala kuna nde bakotonga bingumba na bango ya kovanda.


Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi, elongo na libota mobimba ya Balevi basengeli te kozwa eteni ya mabele to libula kati na Isalaele ; basengeli kobika kaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe mpe na libula na Ye, pamba te yango nde ezali libula na bango.


Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.


mpo na kopesa bato mitindo oyo : — Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango.


Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


Ye oyo akomisaki biso ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe, Tata na Ye : Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Okomisaki bango ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso, mpe bakokonza mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ