Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 33:14 - Mokanda na Bomoi

14 ‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 33:14
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. »


Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


« Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe, « nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi, mokonzi oyo akokamba na bwanya, oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo.


Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo.


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda.


Tala liloba oyo Yawe alobi : Ndenge natindelaki bato oyo pasi oyo nyonso, ndenge wana mpe nakotindela bango bomengo nyonso oyo nalakaki bango.


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.


Yeba mpe sosola makambo oyo : wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi.


Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Pamba te, nazali koloba na bino : basakoli mpe bakonzi ebele batondaki na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.


Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto ; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.


Nzambe asalaki mabongisi ya kitoko penza mpo na biso, pamba te alingaki ete bakoma bato ya kokoka nzela moko na biso.


Mpo na lobiko yango, basakoli oyo baloba na tina na ngolu oyo Nzambe abongisa mpo na bino balukaki penza, na molende, koyeba mabombami na yango.


Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ