Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 33:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 33:13
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi ; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe.


Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona ; bakosepela na bomengo ya Yawe : ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bato bakosomba lisusu bandako, bilanga mpe bilanga ya vino kati na mokili oyo. ›


Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi ; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. »


Nakobatela bino na se ya lingenda na Ngai mpe nakomema bino na mokili na Ngai ya boyokani.


Eteni nyonso ya zomi ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba, elingi koloba nyama nyonso ya zomi oyo ekoleka na se ya lingenda ya mobateli bibwele, ekozala bule mpo na Yawe ;


Bato ya Isalaele oyo bazalaki na bowumbu bakozwa mokili ya bato ya Kanana kino na Sarepita ; bongo bato ya Yelusalemi oyo bazalaki na bowumbu na Sefaradi bakozwa bingumba ya Negevi.


— Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ