Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 33:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo : ‘ Eh ! Esika oyo ebeba ! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te ! ’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 33:10
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alendisaka bikangelo ya bikuke na yo mpe apambolaka bana na yo epai na yo.


Okozongisela biso lisusu bomoi te mpo ete bato na Yo basepela kati na Yo ?


Mpo na nini ozali kosakola na Kombo na Yawe ete Ndako oyo ekokoma lokola Silo ; engumba oyo ekobebisama, ekotikala lisusu na bato te ? » Ebele ya bato nyonso bazingelaki Jeremi kati na Tempelo ya Yawe.


Mpo na yango, tala sik’oyo liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na engumba oyo bino bozali koloba ete ekabami na maboko ya mokonzi ya Babiloni na nzela ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka :


Bato bakosomba lisusu bilanga kati na mokili oyo bino bozali koloba na tina na yango : ‹ Mokili oyo ebeba, etikala lisusu na bato mpe na banyama te ; pamba te ekabama na maboko ya bato ya Babiloni. ›


Nakopesa bango mitindo, elobi Yawe, mpe nakozongisa bango kati na engumba oyo : bakobundisa yango, bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. Mpe nakokomisa bingumba ya Yuda esobe, ezanga bavandi. »


Alobaki na ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! »


Ngai moko nakokotisa mobulu kati na mokili, mpe ezala banguna na bino oyo bakoya kovanda kati na yango bakokamwa.


« Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ