Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 32:9 - Mokanda na Bomoi

9 boye nasombaki elanga oyo ezali na Anatoti, na maboko ya Anameyeli, mwana mobali ya noko na ngai, mpe nafutaki ye mbongo ya bibende ya palata, zomi na sambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 32:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo : moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko.


Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.


Tango mokonzi azalaki koleka, mosakoli agangaki : — Mokonzi, wana nazalaki kati na bitumba, moto moko abimaki kati na mampinga mpe amemelaki ngai mokangami ya bitumba. Alobaki na ngai : « Batela moto oyo ete akima te ! Soki akimi, okokufa na esika na ye to okofuta ngai palata nkoto misato. »


Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.


Soki esepelisi mokonzi, tika ete abimisa mobeko ya koboma bango ; mpe ngai nakopesa na maboko ya bakalaka oyo batalaka makambo ya mokonzi mbongo ya bibende ya palata nkoto zomi mpo ete batia yango kati na libenga ya mokonzi.


Soki ngombe ebeti mowumbu ya mobali to mwasi mowumbu maseke, nkolo na yango asengeli kofuta mbongo ya bibende, tuku misato, epai ya nkolo ya mowumbu, mpe bakobamba ngombe yango mabanga.


Mpo na nini bozali kobebisa mbongo mpo na bilei oyo etongaka nzoto te, mpe kobimisa motoki mpo na bilei oyo etondisaka te ? Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko, mpe bokosepela na biloko ya elengi.


Bilei na yo ya mokolo na mokolo ekozala ya bagrame nkama mibale na tuku mibale, mpe okobanda kolia yango tango nyonso.


Boye, nasombaki ye na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, zomi na mitano, mpe na motuya ya bakilo ya orje, nkama minei na tuku mitano.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ