Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 32:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango ; somba na yo yango. › Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 32:8
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari : — Zonga na bilanga na yo, na Anatoti, pamba te osengeli kokufa. Kasi nakoboma yo sik’oyo te, pamba te omemaki Sanduku ya Nkolo Yawe liboso ya Davidi, tata na ngai, mpe okabolaki na ye pasi nyonso.


Mishe azongisaki : — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.


Ukoki mpe bamboka na yango ya mike, Reobi mpe bamboka na yango ya mike.


Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.


Ezalaki na tango oyo mampinga ya mokonzi ya Babiloni ezingelaki Yelusalemi, mpe mosakoli Jeremi azalaki ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli ya ndako ya mokonzi ya Yuda.


Mpe atako engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, Yo, Nkolo Yawe, olobi na ngai : ‹ Somba elanga na mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli. › »


Anameyeli, mwana mobali ya Shalumi, noko na yo, azali koya epai na yo mpe akoloba : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti, pamba te yo nde ozali na makoki mpe na mokumba ya kosikola yango. ›


Yawe alobaki na Jeremi, na mbala ya mibale, wana azalaki nanu ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli :


Jeremi alingaki kobima na Yelusalemi mpo ete akende kozwa, kati na etuka ya Benjame, libula na ye ya mabele kati na bato ya kuna.


Boye, nasalaki makambo oyo atindaki ngai : na moyi, nabimisaki bisaka na ngai lokola moto oyo azali kokende na bowumbu ; na pokwa, maboko na ngai etobolaki mir, bongo na butu, nabimisaki bisaka na ngai mpe natiaki yango na mapeka, na miso na bango.


Boyokani esilaki nde na mokolo wana ; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe.


Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ