Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 32:7 - Mokanda na Bomoi

7 Anameyeli, mwana mobali ya Shalumi, noko na yo, azali koya epai na yo mpe akoloba : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti, pamba te yo nde ozali na makoki mpe na mokumba ya kosikola yango. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 32:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Ayiya : — Mwasi ya Jeroboami azali koya kotuna yo toli mpo na mwana na ye ya mobali, pamba te azali kobela. Osengeli kopesa ye eyano songolo to pakala. Tango akoya, akosala lokola nde azali moto mosusu.


Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato ya Anatoti, oyo balingi koboma yo mpe bazali koloba : « Kosakola na Kombo na Yawe te, soki te tokoboma yo ; »


Jeremi alobaki : « Yawe alobaki na ngai :


Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango ; somba na yo yango. › Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe ;


Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela.


Kati na mokili oyo bokozwa lokola libula, bosengeli kondima ete moto asikola mabele na ye.


Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki.


Kasi bilanga oyo ezali zingazinga ya bingumba ya Balevi, bakoki koteka yango te : ezali libula na bango mpo na libela.


Soki ndeko azali te mpo na kosikola ye, tata kulutu to tata leki na ye to bana mibali ya tata kulutu to ya tata leki na ye to ndeko na ye mosusu ya libota ya botata akoki kosikola ye. Nzokande soki akomi na makoki, akoki mpe komisikola ye moko.


« Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ