Jeremi 32:33 - Mokanda na Bomoi33 Bapesaki Ngai mokongo na esika ya kotala Ngai. Atako nazalaki tango na tango koteya bango, kasi batikalaki koyoka Ngai te mpe baboyaki kozwa mayele. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.
Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe : na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo ; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este ; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi.