Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 32:31 - Mokanda na Bomoi

31 Wuta batonga engumba oyo kino na mokolo ya lelo, mosala na yango kaka kotumbola Ngai mpe kopesa Ngai kanda ; yango wana, nakolongola yango liboso na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 32:31
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe.


Joziasi abukaki mpe etumbelo oyo ezalaki na Beteli mpe esambelo ya likolo ya ngomba oyo Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, atongaki mpo na kopengwisa bana ya Isalaele. Abukaki etumbelo yango mpe akomisaki yango putulu. Bongo atumbaki mpe likonzi ya Ashera.


Boye Yawe alobaki : « Nakobengana mpe Yuda na miso na Ngai ndenge nabenganaki Isalaele ; nakobwaka Yelusalemi, engumba oyo napona, elongo na Tempelo na yango, oyo na tina na yango nalobaki : ‹ Kombo na Ngai ekozala kuna. › »


mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino ;


Bazali kosakola makambo ya lokuta, kaka mpo na komema bino mosika ya mokili na bino. Ngai nakobengana bino solo mpe bokokufa.


Yelusalemi asali masumu mingi penza, yango wana akomi mbindo. Bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye lokumu bakomi kotiola ye, pamba te bamoni bolumbu na ye ; ye moko mpe azali komilela mpe abaluki mpo na kobomba elongi.


Nkolo, nabondeli Yo, kolanda makambo nyonso oyo osalaka mpo na bosembo, kanda mpe kotomboka na Yo ezali kolongwa kati na engumba na Yo, Yelusalemi, ngomba na Yo ya bule ! likolo ya masumu na biso mpe ya mabe ya bakoko na biso, Yelusalemi mpe bato na Yo bakomi eloko ya liseki na miso ya bato nyonso oyo bazingeli biso.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ