Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 32:27 - Mokanda na Bomoi

27 « Nazali Yawe, Nzambe ya moto nyonso. Boni, ezali na likambo oyo Ngai nakoki kolembana ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 32:27
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.


Ezali likambo moke na miso ya Yawe. Akokaba lisusu bato ya Moabi na maboko na bino.


Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.


Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.


Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te.


‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Yawe alobaki na Moyize : — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse ? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.


Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki : — Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato ! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka ?


— Tika ete Yawe, Nzambe oyo apesaka pema na bato nyonso, apona moto moko mpo ete akamba lingomba oyo ;


Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !


mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › »


pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ