15 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bato bakosomba lisusu bandako, bilanga mpe bilanga ya vino kati na mokili oyo. ›
Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›
tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakozongisa lisusu bomengo kati na bandako ya kapo ya Jakobi mpe nakoyokela bandako na ye mawa ; bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala.
Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona ; bakosepela na bomengo ya Yawe : ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.
‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kamata mikanda oyo nasombelaki elanga, ezala oyo babeta kashe to oyo babeta kashe te ; tia yango kati na mbeki oyo basala na mabele ya bikeko mpo ete ebeba te.
Mpe atako engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, Yo, Nkolo Yawe, olobi na ngai : ‹ Somba elanga na mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli. › »
Bakovanda kuna na kimia, bakotonga bandako mpe bakosala bilanga ya vino ; bakovanda kuna na kimia tango nakopesa etumbu na bikolo nyonso ya bapaya oyo bazingelaki bango mpe bazalaki kotiola bango. Bongo bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. › »
Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.