Jeremi 31:7 - Mokanda na Bomoi7 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boyemba na esengo mpo na Jakobi, boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso ! Batatola, bosanzola mpe boloba : ‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo, bato ya Isalaele oyo batikali. › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki ! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › »
Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »