Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:40 - Mokanda na Bomoi

40 Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:40
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato nyonso bazalaki koleka, mboka mobimba ezalaki kolela makasi. Mokonzi akatisaki lubwaku ya Sedron, mpe bato nyonso bakendeki na nzela oyo ekenda na esobe.


Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.


Mokonzi abukaki bitumbelo oyo bakonzi ya Yuda batongaki na likolo ya shambre ya likolo ya Akazi, mpe bitumbelo oyo Manase atongisaki kati na mapango mibale ya Tempelo ya Yawe. Alongolaki yango wana, abukaki yango na biteni, mpe abwakaki yango na lubwaku ya Sedron.


Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe likonzi ya nzambe mwasi Ashera, mpe amemaki yango na lubwaku ya Sedron, libanda ya Yelusalemi, epai wapi batumbaki yango. Akomisaki yango putulu mpe asopaki yango na kunda epai wapi bakundaka bato ebele na libulu moko.


Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.


Longwa na Ekuke ya Bampunda, moko na moko kati na Banganga-Nzambe abongisaki liboso ya ndako na ye.


Ndenge kaka bayebisaki biso, ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, kati na engumba ya Nzambe na biso ; Nzambe alendisaka yango seko na seko.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi : « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.


Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.


Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo,


Mpo na yango, tala sik’oyo liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na engumba oyo bino bozali koloba ete ekabami na maboko ya mokonzi ya Babiloni na nzela ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka :


Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.


Atambolisaki ngai na bangambo nyonso kati na mikuwa yango : namonaki ete ezali ebele penza mpe ekawuka, kati na lubwaku yango.


Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.


Nakopesa bango lisusu mokongo te, pamba te nakosopa Molimo na Ngai na libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. »


Molayi nyonso ya mir oyo ezingeli engumba ekozala na bametele pene nkoto libwa. Mpe kobanda na tango wana, kombo ya engumba ekokoma ‹ Yawe azali awa. › »


Bato bakozongela kovanda na Yelusalemi ; Yelusalemi ekobebisama lisusu te mpe ekokoma na kimia.


Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda : « Ebulisami mpo na Yawe ! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo.


Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ