Mbala nyonso oyo Yawe akobeta bango fimbu na Ye ya kosambisa, ekolandisama na mindule ya bambunda mike mpe ya mandanda, ndenge moko mpe tango akoningisa loboko na Ye mpo na kobundisa bango.
Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.
Bilenge basi bakobina na esengo elongo na bilenge mibali mpe mibange. Nakobongola matanga na bango na esengo, nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.
« Tia bilembo na nzela, pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango ; sala penza keba na nzela na yo, na nzela oyo ozali kolanda. Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga, zonga na bingumba na yo !
Yawe asundoli bilombe nyonso ya bitumba oyo bazalaki na milongo na ngai ; abengi mampinga ya bapaya mpo ete baya koboma bilenge mibali na ngai. Nkolo akamoli Yuda, mboka kitoko, na ekamolelo na Ye ya vino.
Naloba lisusu nini mpo na yo ? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko ? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko ? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ; nani akoki kobikisa yo ?
Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye ; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko : azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali.