Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:33 - Mokanda na Bomoi

33 « Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:33
36 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Otiaki Isalaele, bato na Yo, mpo ete bazala bato na Yo mpo na libela ; bongo Yo, oh Yawe, okomaki Nzambe na bango.


kasi abongola mitema na biso epai na Ye mpo ete tokoka kotambola na nzela na Ye, kobatela mibeko na Ye, malako na Ye mpe mitindo na Ye oyo apesaki na batata na biso.


Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye, makolo na ye ebetaka libaku te.


Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.


Nzambe na ngai, nasepelaka kosala mokano na Yo, Mobeko na Yo ezali kati na motema na ngai. »


Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.


Lata yango na loboko na yo lokola lopete, koma yango na etando ya motema na yo.


Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.


« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.


« Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama ; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.


Nakopesa bango motema oyo ekoyeba Ngai, mpo ete basosola ete nazali Yawe. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango, pamba te bakozongela Ngai na motema na bango mobimba.


‹ Boye, bokozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. › »


« Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. »


Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.


Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.


Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te.


Nakotia ndako na Ngai kati na bango ; nakozala Nzambe na bango, mpe bango, bakozala bato na Ngai.


Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.


Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te, bakokosa lisusu te to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango. Bakolia mpe bakolala na kimia, mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.


Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »


Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.


Mpe yango nde ekozala boyokani na Ngai elongo na bango tango nakolongola masumu na bango. »


Pamba te kati na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe ;


Bozali penza kolakisa ete bozali mokanda ya Klisto, bozali mbuma ya lotomo na biso, mpe ete bozali mokanda oyo ekomamaki na nzela ya mayi ya ekomeli te kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe na bomoi, mokanda oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga te kasi kati na mitema ya bato.


Yawe, Nzambe na bino, akobulisa mitema na bino mpe mitema ya bakitani na bino mpo ete bolinga Ye na mitema mpe na milimo na bino mobimba, mpe mpo ete bozala na bomoi.


Mpo na oyo etali bolingo kati na bino, ezali lisusu na tina te ya kokomela bino, pamba te Ye moko Nzambe ateyaki bino kolingana bino na bino.


« Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango sima na mikolo wana, elobi Nkolo : Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, mpe nakokoma yango kati na mitema na bango. »


Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, elobi Nkolo : ‹ Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.


Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.


Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ