Jeremi 31:32 - Mokanda na Bomoi32 ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito ; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai.