Kasi abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo : « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
Moto oyo asali masumu, ye moko nde akokufa. Mwana akomema ngambo ya tata na ye te, mpe tata akomema ngambo ya mwana na ye te. Moto ya sembo akozwa litomba mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe akozwa etumbu mpo na mabe na ye.
Ata soki nalobi na moto ya sembo ete akowumela solo na bomoi, soki atie elikya na bosembo na ye mpe asali mabe, bosembo na ye nyonso ekotangama lisusu te mpe akokufa mpo na mabe oyo asali.
Soki nalobi na moto mabe : ‹ Oh moto mabe, okokufa solo ! › Mpe yo, olobi na ye eloko moko te mpo ete abongola bizaleli na ye, moto mabe wana akokufa solo mpo na masumu na ye ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.