Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:28 - Mokanda na Bomoi

28 Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:28
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu ndenge nazalaki na basanza oyo eleki, ndenge nazalaki na mikolo oyo Nzambe azalaki kobatela ngai,


Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.


Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.


Tika ete likolo mpe mabele, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye !


Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.


Yawe alobaki na ngai : — Omoni malamu, pamba te nasenzelaka maloba na Ngai mpo na kokokisa yango.


Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosalela bango bolamu, mpe nakozongisa bango kati na mokili oyo. Nakobongisa bango lisusu, kasi nakobebisa bango lisusu te ; nakolona bango lokola nzete, nakopikola bango lisusu te.


Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›


Tala liloba oyo Yawe alobi : Ndenge natindelaki bato oyo pasi oyo nyonso, ndenge wana mpe nakotindela bango bomengo nyonso oyo nalakaki bango.


« Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te ; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema.


Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama.


Kasi Yawe alobaki na ngai : Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo.


Kasi bapikolaki yango na kanda mpe babwakaki yango na mabele. Mopepe ya este ekawusaki yango, ekweyisaki mbuma na yango, ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi mpe moto etumbaki yango.


Nakokomisa motango ya bato na bino ebele, na mabele na bino : yango nde libota mobimba ya Isalaele ; bato bakozongela lisusu kovanda kati na bingumba na bino mpe bakotonga lisusu bandako na bino oyo ebukana.


Yango wana, Yawe, olandeli pasi yango kino okweyiseli biso yango ; pamba te Yawe, Nzambe na biso, ozali sembo kati na misala na Yo nyonso ; kasi biso, totosaki Yo te.


Yeba mpe sosola makambo oyo : wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi.


Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,


Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai, oyo bakendeki na bowumbu, mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamaki mpe bakovanda kati na yango. Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango, bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Ndenge kaka nazwaki mokano ya kotindela bino pasi mpe ya koyokela bino mawa te tango batata na bino batumbolaki kanda na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga,


« ndenge wana mpe nazwi mokano sik’oyo ya komonisa lisusu bolamu na Yelusalemi mpe na Yuda. Bozala na bobangi te.


« Sima na yango, nakozonga, nakotonga lisusu ndako ya kapo ya Davidi, oyo esila kokweya ; nakotonga yango lisusu mpe nakotelemisa yango,


Bongo Yawe, Nzambe na bino, akosala ete bomona bolamu kati na misala nyonso ya maboko na bino, mpe akopesa bino bana ebele, bibwele ebele mpe bambuma ebele kati na mokili na bino. Yawe akosepela na bino lisusu mpe akosalela bino bolamu, ndenge kaka asepelaki na bakoko na bino,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ