Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:23 - Mokanda na Bomoi

23 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:23
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo


Tika ete baleki nzela baloba na bango te : « Tika ete Yawe apambola bino ! » Topamboli bino na Kombo na Yawe !


Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona, Ye oyo asala likolo mpe mabele !


Yawe, bikisa bato na Yo mpe pambola libula na Yo ; zala mobateli na bango mpe sunga bango mpo na libela.


Tala ndenge nini engumba ya boyengebene ekomi lokola mwasi ya ndumba ! Ezalaki liboso engumba etonda na bosembo, boyengebene ezalaki kovanda kati na yango ; kasi lelo oyo ekomi kobomba babomi.


nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala ; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene.


Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.


Bosembo ekowumela kati na esobe, mpe solo ekozala kati na bilanga oyo ebotaka kitoko.


Yawe anetolami mpo ete avandaka na likolo, akotondisa Siona na bosembo mpe na solo.


Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, mosala ya maboko na Ngai, mpo na komonisa nkembo na Ngai.


Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »


tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakozongisa lisusu bomengo kati na bandako ya kapo ya Jakobi mpe nakoyokela bandako na ye mawa ; bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala.


Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi ; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. »


Moto nyonso oyo azalaki komona bango azalaki koboma bango, banguna na bango bazalaki koloba : ‹ Tozali na biso na ngambo te, mpo ete basali masumu liboso ya Yawe oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo ; liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›


Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona ; ngomba yango ekokoma lisusu bule, mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.


Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo ekokende kotondana kuna.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo ; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »


Sima na mwa tango, Boazi awutaki na Beteleemi ; ayaki ye moko, apesaki mbote na bato oyo bakataka ble na koloba : — Tika ete Yawe azala elongo na bino ! Bazongiselaki ye : — Tika ete Yawe apambola yo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ