21 « Tia bilembo na nzela, pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango ; sala penza keba na nzela na yo, na nzela oyo ozali kolanda. Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga, zonga na bingumba na yo !
Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko : wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule :
Bato ya mabota nyonso ya Isalaele, oyo balukaka Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mitema na bango mobimba balandaki Balevi, na Yelusalemi, mpo na kobonzela Yawe, Nzambe ya batata na bango, mbeka.
Bobima na Babiloni, bokima wuta na bato ya Babiloni ! Boloba yango na makelele ya esengo mpe botatola yango ; bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ; boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »
Kende kosakola sango oyo na nor : ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.
« Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.
Bakotuna nzela oyo ememaka kino na Siona mpe bakobalola bilongi na bango na ngomba yango ; bakolobana bango na bango : ‹ Boya, tika ete tokangama na Yawe na nzela ya boyokani oyo ezali na suka te, boyokani oyo tokoki kobosana te ! ›
Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango mabe na mabe mpe kofuta bango ndenge ezali misala na bango.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
Moto yango alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo ! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. »
Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya, ezala na mokili oyo eleki mosika, bakokanisa Ngai kaka. Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika mpe bakozonga na mokili na bango.
alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.