Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bato oyo bakobika na mopanga bakozwa ngolu kati na esobe ; boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:2
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abimisaki bato na Ye lokola etonga, amemaki bango kati na esobe lokola meme ;


Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › »


« Tango bokobotisa basi ya Ba-Ebre, botala soki mwana nini abotami ; soki azali mwana mobali, boboma ye ; kasi soki azali mwana mwasi, botika ye na bomoi. »


Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »


Bato ya Isalaele balongwaki na Ramisesi mpe bakendeki na Sukoti ; bazalaki mibali nkoto nkama motoba oyo bazalaki kotambola na makolo longola basi mpe bana.


Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.


Yawe azongisaki : — Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi.


Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !


« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge ; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.


Nakomema bino na esobe ya bikolo, mpe kuna, tokotalana na miso mpe nakopesa bino etumbu.


Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo ; nalongolaki bango ekangiseli na bakingo mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.


Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.


Yawe azongisaki : — Nalimbisi bango ndenge osengi.


Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.


pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.


oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto ; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata ; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola.


Pamba te kino lelo, bokoti nanu te na esika ya bopemi mpe bozwi nanu te libula oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino.


Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »


Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu.


— Bobosana te Mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino bopemi mpe mabele oyo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ