Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:19 - Mokanda na Bomoi

19 Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:19
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalobaki : « Oh Nzambe na ngai ! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai ; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo !


Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai.


mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge ekolala elongo na ye kati na putulu.


Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi ; kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.


Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai ; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.


Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te ! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te ! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali ;


Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia kasi olobaki : ‹ Nakoyoka te ! › Ezaleli na yo ezalaka kaka boye wuta bolenge na yo, otosaka na yo Ngai te !


Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »


Bana ya Isalaele mpe ya Yuda, wuta bolenge na bango, bazalaki kosala eloko mosusu te na miso na Ngai, soki kaka mabe te ; solo, bana ya Isalaele bazalaki kosala eloko mosusu te, soki kaka te kopesa Ngai kanda na nzela ya biloko oyo maboko na bango esalaki, elobi Yawe.


Soki batuni yo : ‹ Mpo na nini ozali kolela ? › Okozongisela bango : ‹ Ezali mpo na sango oyo ezali koya. › Mitema mpe maboko nyonso ekolemba lokola mayi, bato nyonso bakomitungisa mpe mabolongo nyonso ekolenga. Sango yango ezali koya ; solo ekosalema, elobi Nkolo Yawe ! »


Mwana na moto, ganga mpe lela makasi ! Pamba te mopanga ebimi mpo na koboma bato na ngai, mpo na koboma bakambi nyonso ya Isalaele ; babongisami mpo na kokufa na mopanga elongo na bato na ngai. Yango wana, beta tolo na yo !


Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge.


Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika ; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni.


Boye, tango bokokanisa lisusu etamboli mabe na bino mpe misala na bino ya mabe, bino moko bokomiyina likolo ya masumu mpe ya misala na bino ya nkele.


Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye ! »


Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »


Nzokande, litomba nini bozwaki na tango wana oyo bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino lelo soni, pamba te ememaka na kufa ?


soki ozongi epai na Yawe, Nzambe na yo ; soki yo mpe bana na yo botosi Ye, na mitema mpe na milimo na bino mobimba, na makambo nyonso oyo natindi yo lelo,


mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye ; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ