Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.
mpe okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobimisa bana ya Isalaele wuta na bikolo ya zingazinga epai wapi bakendeki mpe nakozongisa bango na mabele na bango.
Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.
Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango ; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna.
Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.
Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.
Bozonga na ndako na bino, oyo batonga makasi, bino bakangami oyo botondi na elikya, pamba te nazali koloba na bino sik’oyo : « Nakozongisela bino mbala mibale biloko oyo bobungisaki. »