Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika kolela mpe kobimisa mpinzoli, pamba te mosala na yo ezali na litomba, » elobi Yawe, « bana na yo ya mibali bakozonga wuta na mokili ya banguna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:16
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango asilisaki kosukola elongi na ye, abimaki libanda, akangaki motema mpe alobaki : — Botia biloko ya kolia na mesa.


Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki : « Bobimisa bato nyonso ! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali.


Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti. »


Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo.


Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.


Kende, lia bilei na yo na esengo mpe mela masanga na yo ya vino na motema ya esengo ; pamba te Nzambe asili kondima misala na yo.


akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.


Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi, bokolela lisusu te. Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ; tango kaka akoyoka, akoyanola bino.


Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya, loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza. Botala, azali na lifuti elongo na Ye, azali kotambola na lifuti na Ye.


« Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango ; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele.


Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »


tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakozongisa lisusu bomengo kati na bandako ya kapo ya Jakobi mpe nakoyokela bandako na ye mawa ; bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala.


Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »


ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.


Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso.


mpe okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobimisa bana ya Isalaele wuta na bikolo ya zingazinga epai wapi bakendeki mpe nakozongisa bango na mabele na bango.


Pamba te ndenge tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge mpe tondimaka ete Nzambe akomema, na nzela ya Yesu mpe elongo na Ye, bato oyo bakufa kati na Ye.


Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ