Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:15 - Mokanda na Bomoi

15 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mongongo moko ezali koyokana na Rama, ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi : Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali mpe aboyi kobondisama, pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi.


Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.


Kasi bango bazongisaki : — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale ; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te.


Tata na bango Jakobi alobaki na bango : — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai !


Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe ; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye.


Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »


kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te ; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te.


Nabelelaka Nzambe na koganga ; nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai !


Baleki kati na bangomba mpe balobi : « Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. » Bato ya Rama bakomi kolenga na somo, mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi.


Yango wana nalobaki : « Botika kotala Ngai, botika ete nalela makasi ! Bomeka kobondisa Ngai te mpo na kobebisama ya bato na Ngai ! »


Ndako na ngai ya kapo ebebisami, basinga na yango nyonso ekatani, bamemi bana na ngai ya mibali, natikali lisusu ata na mwana moko te. Nazali lisusu na moto ata moko te oyo akotelemisela ngai ndako ya kapo to akobongisela ngai esika ya kovanda.


Yawe alobaki na Jeremi tango Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abikisaki ye na Rama. Akutaki Jeremi bakanga ye na minyololo kati na molongo ya bakangami oyo bawutaki na Yelusalemi mpe na Yuda, oyo bazalaki komema na bowumbu kuna na Babiloni.


Solo batata na biso basalaki masumu, kasi bazali lisusu te, bongo biso tokomi komema mokumba ya etumbu na bango.


Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki : basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi.


Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama.


Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ