Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 31:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona ; bakosepela na bomengo ya Yawe : ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 31:12
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.


bokokoma lokola nzete ya terebente oyo ekawuka makasa.


Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, bakokota na Siona na nzembo ya elonga, mpe esengo ya suka te ekozala na likolo ya mito na bango lokola mitole. Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, nzokande mawa mpe kolela ekosila.


Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ; esengo ya libela na libela ekozala lokola motole na mito na bango ; bakotondisama na esengo mpe na kosepela, bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.


Yoka ! Bakengeli na yo batomboli mingongo ; bazali koganga elongo na esengo, pamba te, na miso na bango, bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona.


Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.


Moyi na yo ekolala lisusu te, mpe sanza na yo ekobunga lisusu te ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe mikolo na yo ya pasi ekosila.


Bongo nakosepela mpo na Yelusalemi mpe mpo na bato na Ngai ; makelele ya kolela mpe ya koganga ekoyokana lisusu kuna te.


« Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.


Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso : basali bilanga mpe babokoli bibwele.


Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. »


Nakobongisa bino lisusu ; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.


Ekozala mokolo oyo bakengeli bakoganga na bangomba ya Efrayimi : ‹ Boya ! Tika ete tokende na Siona, epai na Yawe, Nzambe na biso ! › »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boyemba na esengo mpo na Jakobi, boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso ! Batatola, bosanzola mpe boloba : ‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo, bato ya Isalaele oyo batikali. ›


Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bato bakosomba lisusu bandako, bilanga mpe bilanga ya vino kati na mokili oyo. ›


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango.


Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe.


Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi ; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko ; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango.


Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule.


Nakoleisa yango na esika ya matiti ya kitoko, mpe matiti na yango ya kolia ekozala na likolo ya bangomba ya Isalaele ; kuna, ekopema mpe ekolia na mabele ya kitoko.


Nakosala ete banzete mpe milona ya bilanga ebota ebele, mpo ete boyoka lisusu soni te na miso ya bikolo likolo ya nzala.


Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.


Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »


« Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.


Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.


To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema ?


Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »


pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ