Jeremi 31:10 - Mokanda na Bomoi10 Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika ! Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.
Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato ; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga.